Djino
Henriquet (Génération Tcha-Tcho)
🎤 Koffi OLOMIDE 💿 Henriquet (Génération Tcha-Tcho)

Djino

Auteur : Koffi OLOMIDE
Compositeur : —
👁️ 2 vues
❤️ 0 favoris
💬 0 commentaires
LN FR

🎼 Lingala

LN
Yaka yaka nalanga yo bongo sima liwa eya kozua ngai yo DJINO Nanu nga nalanga boyé te oh Nanu na mipesa bongo te DJINO yak'osombela nga liwa eh Soki oko changé te dit eh Ndengé nayo ya kozala na nga Ezaleli nayo epayi na nga DJINO Bazingani bras dessus, bras dessous baninga oyo ya ngai leboko elongwaka na litama te oh Lekola nazanga moto na mokili Kaka po BOKANA y'oko tinda ata sango te Lokola otongi efelo nakati ya ngai na yo et pourtant Elongi nayo na motema na ngai lokola mwesé ya seko na horizon Yeba ng'ata nakati ya lilita nakozala na nga kaka kolingaka yo eh DJINO BOKANA yaya na IZA eh Nalembi nzoto awa nazali DJINO nasi nakumbela yo kuruzu ya bolingo Po nini opesi ngai lisusu etumbu ya silence na yo ya ngai na kokisi mabanzo Yaka yaka nalanga yo bongo sima liwa eya kozua ngai yo DJINO Sala lokola nga moniga DJINO Tika motema nayo eloba Motema ebungaka t'eloko yango elingi Oyo ya nga elingi DJINO, oyo ya nga elingi yo DJINO, ya nga elingi yo DJINO Sanza na mowi DJINO Mopepe, mapata, minzoto na likolo Na senga te kasi NZAMBE apesa nga yango Bongo bolingo na sengi yo, opima ngai tina nini, eloko tokuta na nsé Matiti soki eboti ebele ebele Na nzela nayaka mpo tokutana nayo Nakosenga NZAMBE akomisa nga niama ya zamba Ata y'obosani ngai tango nako ya Nga nako yeba se yo po yo kolo nga DJINO, DJINO Mwana ya mokonzi akota boloko te Nzala mpe ekotaka jamais na ndako ya mokonzi Awa nga nakangi yo nakati ya motema ngai Yebisa papa yango eza lisumu te Wana ezali kaka po nga nalingi yo DJINO Mpo nga nalingi yaya na IZA Maloba oyo ya bolingo DJINO Soki ezalaki eloko ya ofele te Ngai mobola nde nazangaki kosombela yo Lokola ezali boyé te tika na profiter Nayebisela yo te motema elingi yo DJINO Motema elingi mama LOLO Sanza na mowi DJINO Mopepe, mapata, minzoto na likolo Na senga te kasi NZAMBE apesa nga yango Bongo bolingo na sengi yo, opima ngai tina nini, eloko tokuta na nsé Mwana ya mokonzi akota boloko te Nzala mpe ekotaka jamais na ndako ya mokonzi Awa nga nakangi yo nakati ya motema ngai Yebisa papa yango ezali lisumu te Wana ezali kaka po nga nalingi yo eza l'amour Sala lokola nga moninga motema mon amie Tika motema nayo eloba ah Motema ebungaka te eloko yango elingi Oyo ya nga elingi DJINO, oyo ya nga elingi yo Yeeeeeeeeeeeeeeeeeeeeeeeeeeeeeeeeeeeeeeeeh TCHATCHO ezala kaka TCHATCHO Nga na mema nde ngambo po nabala Baninga mpe bakendeke mabala malembe Yeeeeeeeeeeeeeeeeeeeeeeeeeeeeeeeeeeeeeeeeh Yeeh nga nako wa eh Nga ne mema nde ngambo po nabala Baninga mpe bakendeke mabala BONGANIA Ya ngai mboka mobimba etomboka na maloba STEPHANIE ya motema Ma douce fleur de ravin Fleur de parfum écoute bien Soleil levant, sourire d'enfant STEPHANIE Yeeh nga nako wa eh Yeeh wapi ELEYI ? Nga ne mema nde ngambo po nabala Baninga mpe bakendeke mabala bapangi Ya ngai mboka mobimba etomboka na maloba
Viens afin que je puisse t'aimer avant que la mort ne vienne me chercher DJINO Je n'ai jamais aimé ainsi Je ne me suis jamais donné ainsi DJINO, tu veux ma mort Si jamais tu ne changes pas Ta façon d'être avec moi Ton comportement envers moi DJINO Tandis-que les autres sont bras dessus, bras dessous, moi la main ne quitte jamais les joues Comme si je n’avais personne au monde Tout cela Parce que BOKANA tu ne donnes pas de tes nouvelles Comme tu as construit un enfer entre toi et moi et pourtant Ton image dans mon cœur, est comme un soleil éternel à l'horizon Sache que même dans ma tombe, je t'aimerai toujours DJINO BOKANA la grande sœur à IZA Là où tu me vois je suis fatigué DJINO, j'ai déjà porté pour toi la croix d'amour Pourquoi m'as-tu encore choisi comme punition ton silence , alors que j'avais de l'espoir Viens afin que je puisse t'aimer avant que la mort ne vienne me chercher DJINO Fais comme moi DJINO Laisse ton cœur s'exprimer Le cœur ne se trompe jamais sur la chose qu'il désire Le mien te désire DJINO, le mien te désire DJINO, le mien te désire DJINO La lune et le soleil DJINO Le vent, les nuages et les étoiles dans le ciel Je ne les ai pas demandés mais Dieu me les a donnés Et l'amour que je te demande, pourquoi tu me le refuses alors qu'on l'a trouvé sur terre Si beaucoup d'herbes poussent Sur le chemin que j'emprunte pour te rencontrer Je demanderai à Dieu de me changer en bête sauvage Même si tu ne me reconnais pas quand je serais arrivé Je vais te reconnaître parce que tu es mon maître DJINO, DJINO Le fils du Roi ne fait jamais de la prison La famine non plus ne s'invite pas dans la maison du Roi Maintenant que je t'ai enfermé dans mon cœur Dis à ton père que ceci n'est pas un péché C'est tout simplement parce que je t'aime DJINO Parce que j'aime la grande sœur d'IZA Les paroles d'amour DJINO Si elles n’étaient pas quelques choses de gratuit Pauvre comme je suis, je n'aurais pas pu te les offrir Comme ce n'est pas le cas, laisse moi profiter De te dire que mon cœur t'aime DJINO Mon cœur aime maman LOLO La lune et le soleil DJINO Le vent, les nuages et les étoiles dans le ciel Je ne les ai pas demandés mais Dieu me les a donnés Et l'amour que je te demande, pourquoi tu me le refuses alors qu'on l'a trouvé sur terre Le fils du Roi ne fait jamais de la prison La famine non plus ne s'invite pas dans la maison du Roi Maintenant que je t'ai enfermé dans mon cœur Dis à ton père que cela n'est pas un péché C'est tout simplement parce que je t'aime, c'est de l'amour Fais comme moi, le cœur mon amie Laisse ton cœur s'exprimer Le cœur ne se trompe jamais sur la chose qu'il désire Le mien te désire DJINO, le mien te désire Yeeeeeeeeeeeeeeeeeeeeeeeeeeeeeeeeeeeeeeeeh TCHATCHO sera toujours TCHATCHO Je porte un fardeau parce que je suis marié Les autres se marient dans la tranquillité Yeeeeeeeeeeeeeeeeeeeeeeeeeeeeeeeeeeeeeeeeh Je vais mourir Je porte un fardeau parce que je suis marié Les autres se marient BONGANIA Le mien toute la ville en parle STEPHANIE de mon cœur Ma douce fleur de ravin Fleur de parfum écoute bien Soleil levant, sourire d'enfant STEPHANIE Je mourrai Où est ELEYI ? Je porte un fardeau parce que je suis marié Les autres se marient également les gens Le mien c'est toute la ville qui s’enflamme

Rejoignez la communauté Ndombolo.co

Créez un compte pour commenter, sauvegarder vos classiques et suivre vos artistes favoris.

🎵 Vous aimerez aussi

D’autres titres à découvrir autour de cet univers musical.

💬 Commentaires

0 contribution(s)

Trier :
Connexion requise
Aucun commentaire pour l’instant.