Mokolo mosusu
Les vainqueurs
🎤 Debaba, Général DEFAO 💿 Les vainqueurs

Mokolo mosusu

Auteur : —
Compositeur : —
👁️ 2 vues
❤️ 0 favoris
💬 0 commentaires
LN FR

🎼 Lingala

LN
Mokolo mosusu nga nakokanisa yo Mokolo mosusu kanda ekosila Mbeh nakozonga tosamba, kasi lelo te eh eh ein... Mokolo mosusu nga nakokanisa yo Mokolo mosusu kanda ekosila Mbeh nakozonga tosamba, kasi lelo te eh eh ein... Olobaka na ngai wana semeki na nga O présentaki ye kombo na ye kajare oh Na yambaka ngouma na ndako na ngai na boboto Nasombelaka ye kutu masanga amela Nafutelaka ye pe ba taxis akende Nakoyeba te eh nakokabela mbanda mbongo Ngai nakoyeba te eh nakomipakola botutu Nasambwe kokosambwa, mbanda asakani na molimo na ngai yo yo oh oh Ngai na yo na mbanda na mesa tokoliya Ngai na yo na mbanda epayi ya "Ya' Kabalo" na Lemba Ngai na yo na mbanda na concert ya "Meli-Melo" Ngai na yo na mbanda bisika nionso ya lisano Amie na ngai, y'ozali solo ndoki ye ye eh Mokolo mosusu nga nakokanisa yo Mokolo mosusu kanda ekosila Mbeh nakozonga tosamba, kasi lelo te eh eh ein... Olobaka na ngai wana semeki na nga O présentaki ye kombo na ye kajare oh Na yambaka ngouma na ndako na ngai na boboto Nasombelaka ye kutu masanga amela Nafutelaka ye pe ba taxis akende Nakoyeba te eh nakokabela mbanda mbongo Ngai nakoyeba te eh nakomipakola botutu Nasambwe kokosambwa, mbanda asakani na molimo na ngai yo yo oh oh Ngai na yo na mbanda na mesa tokoliya Ngai na yo na mbanda epayi ya Ya' Kabalo na Lemba Ngai na yo na mbanda na concert ya Meli-Melo Ngai na yo na mbanda bisika nionso ya lisano Amie na ngai, y'ozali solo ndoki ye ye eh Lelo na sac à main na yo nakei kokuta Oyo somo eh Photo bokangisaki amemi yo na kiti Mokanda akomeli yo ebandi na Ida mon amour Nwana oyo nakanisaki ngai moko nabengaka yo mon amour Nzoka toza' babale Elakisi nini petite Elakisi nini muan'oyo oh Oh mabala ya Kini mabala ya ba associés Biloko o' kolia na ndako mosusu ewuti epayi ya mbanda Bana y'okonyokwamela basusu ya yote Ba semeki y'okolengela nzoka ba complices Ngai naboyi libala' boye oh oh Tika ngai nakende eh eh eh Kobondela ngai te, nakolimbisa yo te, longola mayi na miso, ba larmes de crocodile Kolela na yo te, ezali nde comédie, tang'olingaki Kajare, oyebaki que olembi ngai Tika kokosa, eh eh Tika kokosa, Tshibamba eh Tika kokosa, Marie Kibonge Tika kokosa, Kini na ngai Tika kokosa, Kazadi Wako eh Tika kokosa, Bobo Bobosha Tika kokosa, Simase Papa Tika kokosa, Eric Tshela muana Paris Tika kokosa Alube Maloba eh Tika kokosa José Matata Tika kokosa, Jonico wa Tshomba Tika Kokosa , bana Lucerne oh Tika kokosa , Wasitu na Dallas oh Tika kokosa , Robert Kanza muana Paris Tika kokosa, Kini Manieka ehhh
Un jour peut être je penserais à toi Un jour peut être la colère passera Et je reviendrais pour discuter, mais pas aujourd'hui Un jour je penserai à toi Un jour la colère passera Et je reviendrais pour en discuter, mais pas aujourd'hui Tu me disais que c’était mon beau frère Tu me l’avais présenté, il s’appelait Kajare J'accueillais un serpent dans ma maison avec affection Je lui achetai même la boisson, pour boire Je lui payais même les taxis afin qu’il rentre C’était sans savoir que je donnai mon argent à mon rival C’était sans savoir que je me couvrais de merde Je suis fini de chez fini le rival à jouer avec mon esprit Moi et toi avec mon rival entrain de manger a table Moi et toi avec mon rival chez le grand frère Kabalo à Lemba Moi et toi avec mon rival au concert de Méli-mélo Moi et toi avec mon rival dans tous les endroits de distraction Mon amie tu es vraiment une sorcière Un jour je penserai à toi Un jour la colère passera Et je reviendrais pour discuter, mais pas aujourd'hui Tu me disais que c’était mon beau frère Tu me l’avais présenté, il s’appelait Kajare J'accueillais un serpent dans ma maison avec affection Je lui achetai même la boisson, pour boire Je lui payais même les taxis afin qu’il rentre C’était sans savoir que je donnai mon argent à mon rival C’était sans savoir que je me couvrais de merde Je suis fini de chez fini le rival à jouer avec mon esprit Moi et toi avec mon rival entrain de manger a table Moi et toi avec mon rival chez le grand frère Kabalo à Lemba Moi et toi avec mon rival au concert de Méli-mélo Moi et toi avec mon rival dans tous les endroits de distraction Mon amie tu es vraiment une sorcière Aujourd'hui dans ton sac à main j'ai retrouvé Ça c'est grave La photo que vous aviez pris, ou il ta portai sur une chaise La lettre qu'il ta écris commence par Ida mon amour Moi qui pensai être le seul à t’appeler par mon amour Hors nous étions deux Cela veut dire quoi petite ? Cela veut dire quoi cher enfant Les mariages de Kinshasa, les mariages d’associés Les nourritures que tu manges à la maison certaine proviennent de ton rival Les enfants pour lesquels tu te préoccupe certains ne sont pas de toi La belle famille que tu entretien, hors ce sont des complices Moi je refuse un tel mariage Laisse-moi mon aller Ne me supplie pas, je ne te pardonnerai pas, sèches tes larmes, les larmes de crocodile Cela ne sert a rien de pleurer, car c’est de la comédie, quand t’as aimé Kajare, tu savais que tu en avais assez de moi Arrête de mentir Arrête de mentir Tshibamba Arrête de mentir Marie Kibonge Arrête de mentir Mon kinshasa Arrête de mentir Kazadi Wako Arrête de mentir Bobo Bobosha Arrête de mentir Simase Papa Arrête de mentir Eric Tshela l'enfant de Paris Arrête de mentir Alube Maloba Arrête de mentir José Mataba Arrête de mentir Jonico wa Tshomba Arrête de mentir Les enfants de Lucerne Arrête de mentir Wasitu a Dallas Arrête de mentir Robert Kanza l'enfant de Paris Arrête de mentir Kini Manieka

Rejoignez la communauté Ndombolo.co

Créez un compte pour commenter, sauvegarder vos classiques et suivre vos artistes favoris.

🎵 Vous aimerez aussi

D’autres titres à découvrir autour de cet univers musical.

💬 Commentaires

0 contribution(s)

Trier :
Connexion requise
Aucun commentaire pour l’instant.